Mark 8

Yesu aleyisi mibali nkoto minei

(Mt. 15.32-39)

1Na mikolo wana, bato mingi penza basanganaki lisusu. Lokola bazalaki na eloko moko te po na kolia, Yesu abengaki bayekoli na yempe alobaki na bango :

2—Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basiʼbasali mikolomisato elongo na ngai, mpe bazali na eloko moko te mpo na kolia. 3Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakokweya na nzela ; pamba te basusu kati na bango bawuti mosika.

4Bayekoli na ye bazongiselaki ye :

—Esika nini tokozwa, awa na esika oyo ezangi bato, mampa ya kokoka mpo na koleyisa bango ?

5Yesu atunaki bango :

—Bozali na mampa boni ?

Bazongisaki :

—Sambo.

6Bongo alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele. Akamataki mampa yango sambo, azongisaki matondi, akataki yango, bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola yango na bato ; mpe basalaki bongo. 7Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike ; apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli bakabola yango. 8Bato baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki bitunga sambo ya biteni oyo etikalaki. 9Bato bazalaki pene-pene ya nkoto minei. Bongo Yesu azongisaki bango.

10Kaka na tango wana, amataki na bwato elongo na bayekoli na ye, mpe akendaki na mokili ya Dalmanuta.

Yesu na bakonzi ya banganga Nzambe ya Bayuda

(Mt. 16.1-4)

11Bongo Bafarizeo bayaki mpe babandaki kotuna Yesu mituna. Basengaki ye likamwisi moko oyo ekowuta na Likolo, mpo na komeka ye.

12Yesu ayokaki mawa mingi mpe alobaki :

—Mpo na nini bato ya tango oyo bazali kosenga elembo ? Nalobi na bino ya solo : bakopesa bango ata elembo moko te !

13Atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendaki na ngambomosusu ya ebale.

(Mt. 16.5-12)

14Bayekoli babosanaki komema mampa ; bazalaki kaka na limpa moko na kati ya bwato.

15Yesu akebisaki bango :

—Bofungola miso mpe bokeba na nkisi oyo evembisaka mampa ya Bafarizeo na oyo ya Erode.

16Bayekoli babandaki kotiana tembe bango na bango :

—Ezali mpo tozali na mampa te.

17Tango Yesu ayebaki yango, atunaki bango :

—Mpo na nini bozali kotia tembe mpo bozangi mampa ? Boyebi naino te ? Bososoli naino te ? Mitema na bino ezali kaka mabanga ?
18Bozali na miso, kasi bozali komona te ? Bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te ? Boni, bozali kokanisa te ? 19Tango nakataki mampa mitano mpo na kokabola na bato nkoto mitano, bitunga boni bolokotaki ezalaki ya kotonda na biteni ?

Bazongisaki :

—Zomi na mibale.

20—Bongo tango nakataki mampa sambo mpo na kokabola na bato nkoto minei, bitunga boni bolokotaki oyo ezalaki ya kotonda na biteni ya mampa ?

Bazongisaki :

—Sambo.

21Bongo alobaki na bango :

—Bozali kaka kososola te ?

Yesu abikisi moto akufa miso na Betsaida

22Bakomaki na Betsaida. Bamemelaki Yesu moto moko akufa misompe babondelaki ye mpo asimba ye.

23Yesu akamataki moto akufa miso na loboko, mpe amemaki ye nalibanda ya mboka ; bongo abwakelaki ye soyi na miso, atielaki yemaboko, mpe atunaki ye :

—Boni, ozali komona eloko ?

24Moto yango atalaki mpe alobaki :

—Nazali komona bato lokola banzete ezali kotambola.

25Bongo Yesu atiaki maboko na ye na miso ya moto yango. Moto yango atalaki malamu, abikaki mpe abandaki komona biloko nyonso polele penza.

26Yesu azongisaki ye na ndako na ye, mpe alobaki na ye :

—Kokota na mboka te.

YESU NA BAYEKOLI NA YE

Piere atatoli mpo na Yesu

(Mt. 16.13-20 ; Lk. 9.18-21)

27Yesu na bayekoli na ye bakendaki na bamboka ya Sezarea na Filipo. Na nzela, atunaki bango :

—Bato balobaka ete ngai nazali nani ?

28Bazongisaki :

—Basusu balobaka : Jean Batiste ; basusu balobaka : Eliya, mpe basusu balobaka : ozali moko ya baprofeta.

29Yesu atunaki bango :

—Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani ?

Piere azongiselaki ye :

—Ozali Kristo !

30Bongo akebisaki bango baloba na moto moko te mpo na ye.

Yesu ayebisi liwa mpe kosekwa na ye

(Mt. 16.21-23 ; Lk. 9.22)

31Bongo Yesu abandaki koteya bango ete :

—Mwana na moto esengeli amona pasi mingi, mpe baboya ye na bankolo, bakonzi ya banganga-Nzambe, na balakisi ya Mibeko, mpe esengeli baboma ye. Kasi sima ya mikolo misato akosekwa !
32Azalaki koloba makambo yango polele penza.

Bongo Piere abendaki ye na pembeni, mpe abandaki kopamela ye.

33Kasi Yesu abalukaki mpe atalaki bayekoli na ye, apamelaki Piere :

—Longwa liboso na ngai, Satana ! Pamba te makanisi na yo ezali ya Nzambe te, kasi ezali ya bato.

Ndenge nini kolanda Yesu

(Mt. 16.24-28 ; Lk. 9.23-27)

34Bongo abengaki ebele ya bato elongo na bayekoli na ye, mpe alobaki na bango :

—Soki moto alingi kolanda ngai, esengeli amiboya ye moko, amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai.
35Pamba te, moto oyo akolinga kobikisa bomoi na ye, akobungisayango ; kasi oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai mpe mpo na Sango Malamu, akobikisa yango. 36Litomba nini moto akozwa soki azwi mokili mobimba, bongo abungisi elimo na ye ? 37Eloko nini moto akoki kopesa na esika ya elimo na ye ? 38Pamba te, moto nyonso oyo akoyoka soni mpo na ngai mpe mpo na Liloba na ngai, na kati ya bato ya tango oyo batosaka Nzambe te mpe batondi masumu, Mwana na moto akoyokela ye mpe soni, tango akoya na kati ya kembo ya Tata na ye, elongo na baanzelu basantu !
Copyright information for LinMNB